2 Corinthians 1

Ebandeli ya mokanda

1Polo, ntoma ya Klisto Yesu na mokano ya Nzambe, mpe ndeko na biso Timote, totindi mokanda oyo na Lingomba ya Nzambe oyo ezali na Korinto mpe na basantu nyonso oyo bazali na Akayi mobimba.

2Tika ete ngolu mpe kimia kowuta na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Klisto ezala na bino.

Polo azongisi matondi epai na Nzambe

3Lokumu epai na Nzambe, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, Tata oyo ayokelaka bato mawa mpe Nzambe oyo abondisaka bato na makambo nyonso. 4Abondisaka biso na bapasi nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa baoyo bazali kati na bapasi, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaki epai na Ye. 5Ndenge tozali komona pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe kobondisama na biso ezali mingi na nzela ya Klisto. 6Soki tozali komona pasi, ezali mpo ete bino bokoka kobondisama mpe kobika ; soki biso tosili kozwa kobondisama, ezali mpo ete bino mpe bokoka kozwa kobondisama mpo ete bolonga kokanga motema liboso ya bapasi ya ndenge moko na oyo biso tozali komona. 7Boye, tozali solo kotia motema epai na bino, pamba te toyebi malamu ete ndenge bozali komona pasi elongo na biso, ndenge wana mpe bozali kozwa kobondisama elongo na biso.

8Bandeko, tolingi boyeba mikakatano nini tokutanaki na yango na etuka ya Azi. Mikakatano yango elekaki penza makasi kino ebungisaki biso ata elikya ya kozala na bomoi. 9Solo, tomonaki lokola nde bakatelaki biso etumbu ya liwa. Esalemaki bongo mpo ete toyekola kotia elikya na bomoto na biso moko te, kasi na Nzambe oyo asekwisaka bakufi. 10Ye nde akangolaki biso na makama ya kufa ya lolenge wana, mpe akokangola biso lisusu. Solo, tozali na elikya kati na Ye ete akokangola biso lisusu koleka, 11awa bozali kosunga biso na mabondeli na bino. Boye, ngolu oyo azali kopesa biso lokola eyano ya mabondeli ya bato ebele, ekopesa lisusu nzela na bato ebele ete bazongisa matondi epai na Nzambe mpo na biso.

MAKAMBO ETALI BOYOKANI YA POLO NA BANDEKO YA KORINTO

Polo abongoli makanisi na ye

12Pamba te, lokumu na biso ezali ete mitema na biso ezali kotatola ete totambolaki na mokili, mpe mingi penza na miso na bino, na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te kasi na ngolu ya Nzambe. 13Boye, tokomelaka bino makambo mosusu te : kaka makambo oyo boyebi mpe oyo bososolaka. Mpe nazali na elikya ete bokososola yango malamu penza, 14mpo ete bososolaki biso mpe mwa moke ete tozali lokumu na bino ndenge bino mpe bokozala lokumu na biso na mokolo ya Nkolo Yesu.

15Na elikya yango, nazalaki na mabongisi ya koya liboso epai na bino mpo ete bokoka kozwa ngolu ya mibale, 16mpe longwa epai na bino nakende na Masedwane, mpe sima na kowuta na Masedwane, nazonga lisusu epai na bino mpo ete nazwa lisungi ya kokoba mobembo na ngai kino na Yudea.

17Tango nasalaki mabongisi wana, boni, elingi koloba ete namikakolaki ? To mpe lisusu nasalaka mabongisi na ngai na bomoto mpo ete nandima mpe naboya likambo na mbala moko ?

18Nzambe azali Moyengebene : maloba oyo nayebisaki bino ezali te : “Iyo” mpe “Te”. 19Pamba te, Mwana na Nzambe, Yesu Klisto oyo ngai, Silasi mpe Timote toteyaki bino azalaki te : “Iyo” mpe “Te”, kasi kati na Ye, ezalaki tango nyonso “Iyo”. 20Pamba te, bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka “Iyo” kati na Klisto. Mpe ezali na nzela na Ye nde tolobaka : “Amen” mpo na nkembo ya Nzambe.

21Nzoka nde, Nzambe Ye nde alendisaka ezala biso to bino kati na Klisto, mpe Ye nde abulisa biso na nzela ya epakolami na Ye, 22atia biso elembo na Ye lokola bomengo na Ye mpe atia Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya bolamu oyo ekoya.

23Boye, nalapi seleka na Kombo ya Nzambe ete ezali mpo na kolukela bino mindondo te nde nazongaki lisusu te na Korinto. 24Te, ezali te mpo na kozwa bokonzi likolo ya kondima na bino, kasi tozali kosala elongo na bino mpo na esengo na bino, pamba te ezali mpo na kondima nde bozali koyika mpiko.
Copyright information for LinMNB